Ngonga 24 ya Bwale bwa Mokonzi wa Biso Yezu Kristu 

Ngonga 24 ya Bwale bwa Mokonzi wa Biso Yezu Kristu 


E Mokonzi Yezu Kristu, tala ngai oyo nafukami o boso bwa yo. Nazali kobondela motema mwa yo moye motondi na bolingi mingi na ntina ‘te oyingisa ngai o kati ya bomanyoli malozi ma yo ma ngonga ntuku ibale na inei. Ondimaki koyoka mpasi eye na nzoto ya yo mpenza mpe na molimo mwa yo mosantu te kino liwa lya yo o kuruse zambi olingaki biso mingi. Mokonzi, sunga ngai, pesa ngai bolingi, nzala, na mayele makasi ya kosangana na malozi ma yo, awa nazali komanyola ngonga ya … (bakisa motango mwa ngonga).

Mpona bangonga eye nakoki komanyola te, nazali kobonzela yo mposa na ngai ya kosala yango. Natondi na mposa ya komanyola yango o kati ya bangonga na ngai ya mosala to na kati ya mpongi na ngai. Nakobondela yo, ondima yango, E Mokonzi na ngai ya mawa mpe ya bolingi, mpo ‘te esalisa ngai elongo na baye basusu. Tika ‘te manso masalema se lokola ngai nazalaki kosambela yango mpenza.

Natondi yo nde botondi, E Yezu wa ngai, mpo ‘te na losambo loye, ozali kobenga ngai mpo ‘te nasangana na yo na ntina ‘te nasepelisa yo ya mingi. Nazali koyamba makanisi, lolemo, motema mwa yo na ntina ‘te nasambela na yango mpo ‘te namikotisao kati ya mposa mpe bolingi bwa yo. Mpo ya kobanda, nazali kolalisa moto mwa ngai o motema mwa yo.

E Yezu wa bolingo, nsima ya ngai komona mpasi na yo elongo na Mama wa yo, namoni ‘te osili kozwa mokano ya kokende esika wapi bolingi bwa Tata bozali kobenga yo. Oyo nde elembo ya solo ya bolingi o kati ya Mwana na Mama wa ye. Bakoki kobwana te. Mpona yango, omitiki mobimba o motema ya Mama, mpe ye Mama mpe Nkumu wa Mwasi wa boboto, amitiki mpe na yo. Soki ezalaka boye te, bolingaki kozala ya kokabwana. Nsima, awa bozali komibenisa bino na bino, ozali kozinga ye ekopi ya nsuka mpo ya kopesa ye makasi o kati ya bwale bwa ye boye bozali koya nsima. Opesi ye mbote ya nsuka mpe okei na yo.   

Kasi elongi na yo ekomi lokola ya moto asili awei, mbebu na yo ekomi kolenga-lenga, maloba ma yo makangami na mongongo lokola ya moto oyo azali kolela, awa ozali kopesa mbote ya nsuka; ah, nyonso ezali kolakisa ngai ‘te ya solo olingi ye mingi, mpe lolenge bozali kokabwana ezali kopesa yo mpasi mingi mpenza. Kasi bondimi kokokisa mokano mwa Tata ontei ya mitema mya bino miye misangani. Bondimi kosala yango mpona libiki ya baye banso bazali na mposa ata moke te ya kokokisa etinda ya Tata mpe kokoma basantu oyo ye akingi ‘te bazala. Ezali bongo baboti mpe baninga baye balingani mingi mpenza na lolenge la nse eye. Ezali mpe mpasi mpona milimo miye mizali kososolo te bolingo ozali kopesa bango. Bango nde balandi mposa ya bikelamo. 

Bolingo bwa ngai y anse ya motema, awa ngai na yo tozali kobongisa mabe ma nse eye, tika ‘te nazala esika moko na Mama wa yo mpo ‘te nasunga mpe nasimba ye o ntango eye ozali kokabwana na ye. Bongo nakokima mbangu mpenza mpo ‘te nakoma mpe kuna epai ozali. Kasi ngai nazali koyoka mawa mingi mpenza. Ngai nazali komona ‘te Mama na ngai akomi kolenga, mpe ezali kosala ye mpasi mingi lisusu koleka awa azali kopesa mbote ya nsuka na mwana wa ye. Maloba ma monoko mwa ye mazali koyokana lisusu te. Akoki lisusu koloba malamu-malamu te. Akomi na nsuka, mpe ontei ya biloba-loba ya nsuka, na bolingi mingi, ye ‘te:

‘’Mwana ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali! Nazali kobenisa yo! Oyo bokabwani moko ya mpasi mpenza. Eleki kutu ata liwe!’’ Kasi mpasi eleki mingi mpe akoki koloba lisusu te. Akangaki monoko.

Mama Mokonzi wa mpasi, tika ‘te nasimba yo, nalongola yo mpinzoli mpe nakabola mpasi ya yo. Mama wa ngai, ngai nakotika yo te ozala yo moko; kumba ngai elongo na yo. Lakisa ngai eloko nini ngai nasengeli nasala o ntango eye ya mpasi, eye yo na mwana na yo Yezu bozali komona. Lakisa ngai boni-boni nasengeli kobunda mpo ‘te nabongisa mpe nalongola mawa. Lakisa ngai soki nasengeli nakaba bomoi bwa ngai mpo ya kowelisa ye. Te! Ngai nakotikala kolongwa o nse ya kazaka na yo te. Soki olingi, nakokende epai ya Yezu mpo namemela ye bolingi bwa yo, mposa ya yo, ekopi ya yo mpe ya ngai lokola. Mpe nakotia yango na mpota ya ye moko-moko, na litanga lyoko-lyoko ya makila ma ye, na mpasi yoko-yoko ti na lifinga loko-loko na ntina ‘te nalembisa mpasi y aye. Nsima na yango, nakozonga lisusu o nse ya kazaka na yo. Nakoyela yo mpe ekopi y aye mpo ya kolembisa mpasi ya motema mwa yo moye mosili kotoboka. 

Mama wwa ngai, motema mwa ngai mokomi kobete; nalingi nakende epai ya Yezu. Awa nazali koyamba maboko ma yo ma bomama, ozali kobenisa ngai se lokola obenisaki Yezu, mpe ozali kopesa ngai nzela nakende epai ya ye. 

Yezu, boboto bwa ngai, bolingi nde eloko ezali kotambwisa ngai o matambi ma yo, mpe nazali kotambola elongo na yo o ba bala-bala ya Yeruzaleme na bayekoli ba yo. Nazali kotala yo, mpe namoni elongo ya yo ezali se lokola ya moto asili awei. Nazali koyoka maloba ma yo ma boboto mpe ya mawa. Yango ezali kotutisa mitema mya bayekoli ba yo mpe mazali kosilisa bango mayele.

‘’Yo olobi ‘te eyo ezali mbala ya nsuka mpona ngai kotambola o ba bala-bala eye. Lobi nakotambola na maboko eye bakangi bansinga, mpe bakotambwisa ngai o kati ya mafinga.‘’ Awa ozali kotala bisika biye bakomonisa yo mpasi eleki ndelo, olobo ‘te: ’’Etikali se mwa ntango moke, bomoi bwa ngai bokosuka awa, lokola moi mokomi penepene na kozinda. Lobi o ngonga eye, nakozala lisusu te. Kasi lokola moi, ngai nakoteleme lisusu o mokolo mwa misato.’’

Awa bazali koyoka maloba ma yo, bayekoli ba yo basosolaki mango te, mpe bazongiselaki yo maloba te. Bongo obakisaki ‘te: ‘’Bozala na mpiko, bokweya te, nakotika bino te, nakozala na binon tango inso. Kasi epusi malamu ngai nakufa mpo ya malamu ma bato banso. Iyo! Tozali na mawa.‘’ Na maloba ma kolenga-lenga, okobaki na kopesa bango malako ma yo. Bongo? Liboso ‘te okota o eteni ya ndako ya likolo, otalaki moi na mpe lolenge yango ezalaki kokende kozinda. Yo nde opesi bomoi na ba oyo nyonso bazali lisusu na elikya ya bomoi te, mpe ozali kopesa bango bopemi o kati ya yo, mpambe te, ozali kobomba ba oyo nyonso bazali koyoka mpasi ya bomoi, kasi baye bazali na mposa ya komipesa na yo te. 

Tala lisusu Yeruzaleme, ntina ya makamwisi ma yo mpe esengo enene ya motema mwa yo. Kasi tala, kaka yango nde ekomi kolengelela yo kuruse, kotia ba nsete nsonge mpona koboma Nzambe. Makambo maye mazali solo kolengisa yo. Motema mwa yo mozoki mpe ozali kolela mpona liwa lya yango. Yango nde ntina ozali kobomba milimo mipesamelaki yo na bolamu bonso. Osali manso mpo ‘te babomba bolingi bwa yo, kasi malamu yo osalaki bango, bango bazongiselaki yo mango te. Bayokisi yo mpasi eleki ndelo. Nalingi kobongisa yango elongo na yo mpo ya kokitisa mpasi ya motema mwa yo. 

Yeruzaleme ezali kobangisa yo mingi. Yango wana olingi kutu kotala yango te. Sikawa okoti o kati ya senakulo. Bolingo bwa ngai, sangisa ngai na motema mwa yo, na ntina ‘te mpasi ya yo ekoma mpe ya ngai mpo ‘te nabonza yango elongo na yo. Ozali kotala molimo mwa ngai na mawa; mpe ozali kotangisa bolingi bwa yo o likolo lya yango. Benisa ngai.

Yezu akabwani noki-noki mpenza na Mama wa ye Mosantu, atako bongo bolingo bwa ye mpona ye bosilaki naino te. Bongo, biso mpe tosili komilengele mpo ya koboya biloko biye biso tolingaka mingi, ezala ata oyo ya motuya mpo ‘te tokokisa bolingi bwa Nzambe? (Tomitala malamu, mingi penza na oyo etali koboya Nzambe ayingela o makambo ma biso, to mpe o kati ya komibonza bwa biso).

Makambo Yezu asalaki o ntango bomoi bwa ye awa o nse bokomaki na nsuka, mazalaki na ntina mingi. Azalaki kopesa Nzambe lokumu, mpe azalaki kosambela mpo ya libiki ya milimo. Na makambo manso biso tosalaka, tosengelei mpe kozala na makanisi Yezu azalaki na mango; elingi koloba ‘te tosengeli komikaba mobimba mpo ya lokumu la Tata mpe mpo ya bolamu ya milimo. Tosengeli mpe okanisa lolenge nini tokoki kotambwisa makolo ma biso o nzela ya Yezu Kristu.

Lokola Yezu ye mei atambolaki pamba-pamba te, kasi lokola asangisaki bikelamo binso o kati ya ye, lokola mpe azalaki kobongisa eye inso ya mabe mpo ya lokumu la Nzambe, lokola abandaki kopesa bomoi na bikelamo na ntina ‘te batambola o nzela ya ye, biso mpe tosengeli kotambola o nzela ya Yezu Kristu na makanisi mpe mabanzo ma ye. Tokende, tozala na motema ngolu mpe ya botondi mpo ya kopesa ndakisa na bato basusu.

O ntango azalaki otambola, Yezu azalaki kobwakela bayekoli ba ye liloba lyoko-lyoko. Azalaki koyebisa bango mpo etali bwale bwa ye, eye ekomaki penepene. Sikoyo, o kati ya masolo ma biso, tosololaka eloko nini? Soki tozwi ntango ya kosolola, tozalaka mpe na makanisi ma bosololi masolo ma bwale bwa Mobikisi wa biso?

Yezu oyo atondi bolingo amekaki kopesa mpiko na bayekoli ba ye tango amonaki ‘te balembi nzoto mpo ya mawa. O kati ya masolo ma biso, tozalaka mpe na makanisi ya botomboli Yezu? Ezalaka masolo maye Nzambe alingi, mpe mazali koteya bato basusu makanisi mazalaki na Yezu?

Yezu akomi kokende na senakulo. Mbala inso tozali kosala mosala, tosengeli kobomba makanisi, mposa, motema, bisambu, mpe bilei bya biso na Motema mwa Yezu Kristu. Awa tozali kosala boye, makambo ma biso manso makosalema na bo-Nzambe. Kasi ezali mpasi mingi mpo ya kozala na makanisi maye ntango inso mpamba te, molimo ayokaka mpasi mingi mpo ya kobalisa makambo maye manso na mpo elingi Nzambe to Yezu. Kasi soki tolongi na kosala yango, Yezu akobatela makanisi, maloba, etamboli na biso nyonso, mpe akosangisa nyonso na bo-Nzambe bwa ye. Bongo o libanda bwa ye, akotala yango na bolingi mingi lokola mbuma elamu ya mposa elamu ya bikelamo.

Tango moto oyo asangani na ye azali kosala makambo maye manso elongo na Yezu, Yezu ye mei akoya penepene na ye, mpe akosala manso elongo na ye, mpe mosala mwa bikelamo mokozala mosala mwa Nzambe ye mei.

Nyonso oyo ezali mbuma ya bolamu bwa Nzambe mpo ye atalaka manso, mpe apesaka mbano na yango, ata mpona mosala moke tosalaka engebene na bolingi bwa Nzambe. Boye, ye moko akoyeba ‘te abosani ata ekelamo yoko te. E Bomoi na ngai mpe Nyonso nazali na yango, makolo ma yo mazali kolakisa ngai nzela. Awa nazali naino kotambola o nse eye, sala ‘te mabanzo ma ngai mazala kuna o likolo.         

E Yezu wa ngai wa bolingo, obengi ngai na ngonga eye ya malozi ma yo mpo ‘te nazala esika moko na yo. Ngai oyo. Nazali komona ‘te otondisami na makanisi ma mawa mingi awa ozali kosambela mpe kobongisa o kati ya mpasi. Ozali kosambela na maloba mpe mongongo ya mawa mpenza mpo ‘te obikisa milimo. Ngai nameki kolanda yo na manso mana, kasi sikawa nasengeli natika yo mpo ya kokende o mosala mwa ngai; nazali kobenisa mpe kotondo yo. Iyo, E Yezu, ngai nalingi yo, mpe nazali kozongela yango mbala nkoto na nkoto. Nazali kopesa yo lokumu zambi ya mpasi ozali koyoka, mpe mpo ya mambi manso osali mpo ya ngai mpe mpo ya nse mobimba. Melesi! Ngai nazali kobenisa yo mpo ya litanga lyoko lyoko ya makila ma yo, mpona mpema, mpona lolenge motema mwa yo mozali kobete, mpona etamboli, maloba, liso, mpasi ya motema na mafinga eye oyoki. Mpona eye nyonso, E Yezu wa ngai, nazali kopambola yo mpe napesi yo mersi mingi.

E Yezu, sala ‘te nzoto ya ngai mobimba epesa yo mersi mpe mapamboli maye masengeli na ntina ‘te ngai, elongo na nse mobimba, totonda na mapamboli mpe bolamu bwa yo. E Yezu, tika ngai nakangama na motema mwa yo mpe maboko ma yo ya santu-santu, mpe otodisa bilembo bya mapamboli ma yo o binama binso bya nzoto ya ngai, na ntina ‘te eloko esusu ebima na motema mwa ngai te, kasi se banzembo ya koyembela mpe kokumisa yo.

Yango wana nazali komibonzamobimba mpenza na yo mpo ya komekola yo na manso ozali kosala. Nazali na elikya ‘te yo okosala mpo ya ngai. Yango wana nzali kobonzela yo makanisi na mpe maboko ma ngai mpo ya kobundisa banguna ba yo. Nakokabela yo mpe bondeko bwa ngai mpo ‘e nalingi kozala esika moko na yo, mpe nalingi koyebisa yo ntango inso ‘te nalingi yo mpo ya kokabela yo bolingi eye basusu baboyi kopesa yo. Kamata mpe matanga ma makila ma ngai mpo ya kobongisa, mpe kozongisela yo makanisi malamu maye kofinga, nsoi, mpe bambata ma banguna ba yo babotolaki yo. Tika ‘te nzoto na ngai mobimba mobatela yo.

Bolingo bwa ngai bwa boboto, ata ko nasengeli kosala misala mya ngai misusu, ngai natikali se o kati ya motema mwa yo: kolongwa awa ezali kopesa nga somo, mpamba te yo ozali kobomba ngai o kati na yo; ezali bongo te ? Mitema mya biso mizali kobete elongo, mpe mizali koyokana mpo ye kopesa ngai bomoi, bolingi, mpe kovanda esika moko na yo. Yezu wa ngai, soki omoni ‘te ngai nalingi kotika yo, tika ‘te mpema ya yo ebenda mpema ya ngai makasi, mpe maboko ma yo makangisa ngai makasi na ntolo ya yo, miso ma yo matala ngai mpe mabwakala ngai pole ya moto na lolenge ‘te, awa nazali koyoka yo o nzoto ya ngai, namitika mobimba mpo ya kosangana na yo.

E Nzambe wa ngai, zinga ngai ekopi ya bolingi, yamba ngai mpe pambola ngai. Nalingi koyamba yo o kati ya motema mwa yo moye motondi boboto, mpe nalingi nawumela na yo.

Lingala - Telegram Channel: Mpo Elingi Nzambe Bolingi bwa Nzambe

Swahili - Telegram Channel: Utashi Wa Mungu Na Upendo Wa Mungu

English - Telegram Channel: Divine Will Divine Love

Français - Chaine de Telegram: Divine Volonte Divin Amour

Site Web - langues différentes: www.divinewilldivinelove.com


"Ngonga 24 ya Bwale bwa Mokonzi wa Biso Yezu Kristu", o Télégraph - texte mobimba – ekoki kotangama libela.


Moto alingi kozwa buku mobimba ya "Ngonga 24 ya Bwale bwa mokonzi wa Biso Yezu Kristu", afina awa


Report Page